Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 11:29 - Mokanda na Bomoi

29 Bayekoli oyo bazalaki kati na Antioshe bazwaki mokano ya kotinda masungi, moko na moko kolanda bozwi na ye, epai ya bandeko oyo bazalaki kovanda na Yuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 11:29
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bapesaki na libenga ya misala, moto na moto kolanda ezweli na ye, mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku motoba na moko, mbongo ya bibende ya palata nkoto mitano, mpe banzambala nkama moko ya mosala ya bonganga-Nzambe.


Nalobaki na bango : — Biso, kolanda makoki na biso, tosikolaki bandeko na biso, Bayuda, oyo batekamaki epai ya bapagano. Kasi bino sik’oyo, bozali bino moko koteka bandeko na bino, mpe bozali koteka bango kaka epai ya bato ya ekolo na biso ! Bavandaki kimia mpe bazangaki liloba ya kozongisa.


Mosali oyo azwaki batalanta mibale asalaki mpe ndenge moko. Mombongo na ye ebotaki batalanta mosusu mibale lokola mileki.


Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.


Mokolo moko kati na mikolo yango, Petelo atelemaki kati na bandimi pene nkama moko na tuku mibale


Bantoma mpe bandimi oyo bazalaki kati na Yuda bayokaki sango ete bato ya bikolo ya bapaya mpe bandimaki Liloba na Nzambe.


mpe tango amonaki ye, amemaki ye na Antioshe. Mobu mobimba, Barnabasi mpe Saulo basalaki elongo kati na Lingomba, mpe bateyaki bato ebele. Ezalaki na Antioshe nde bayekoli babengamaki, mpo na mbala ya liboso, Baklisto.


Nzokande, bayekoli batondaki na esengo mpe na Molimo Mosantu.


Kasi tango bayekoli bazingelaki Polo, atelemaki mpe azongaki kati na engumba. Bongo mokolo oyo elandaki, akendeki na Derbe elongo na Barnabasi.


bazalaki kolendisa bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Bazalaki koloba : — Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.


Sima na ngai kosala mibu ebele na libanda ya Yelusalemi, nazongaki na mboka na ngai mpo na komemela bato bakelela ya ekolo na ngai lisungi, mpe mpo na kobonzela Nzambe makabo.


Moko te kati na bango akelelaki ; pamba te bato oyo bazalaki na mabele to na bandako bazalaki koteka yango, bazalaki komema mbongo oyo batekelaki


Na mikolo wana, motango ya bayekoli ezalaki kaka kobakisama. Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Greki bakomaki koyimayima mpo na kotelemela Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Ebre, pamba te basi na bango oyo bakufisa mibali bazalaki kozangela na tango ya kokabola bilei ya mokolo na mokolo.


mpe, sima na ye kolia, nzoto na ye ezongaki lisusu makasi. Saulo avandaki mwa mikolo elongo na bayekoli oyo bazalaki kati na Damasi.


Kasi bayekoli ya Saulo bamemaki ye na butu mpe babimisaki ye libanda ya mir, na kokitisa ye kati na kitunga.


ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe.


Basengaki na biso kaka ete tokoba kokanisa babola. Mpe nasalaki nyonso mpo na kokokisa mokumba yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ