Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 11:22 - Mokanda na Bomoi

22 Sango yango ekomaki kino na Lingomba ya Yelusalemi, mpe batindaki Barnabasi, na Antioshe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 11:22
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bantoma mpe bandimi oyo bazalaki kati na Yuda bayokaki sango ete bato ya bikolo ya bapaya mpe bandimaki Liloba na Nzambe.


Nzokande, bandimi oyo bapalanganaki mpo na kokima minyoko oyo eyaki tango babomaki Etieni, bakimaki kino na Fenisi, na Shipre mpe na Antioshe. Mpe kuna, bazalaki kosakola Sango Malamu epai ya moto mosusu te, kaka epai ya Bayuda.


Kasi bamosusu kati na bango, bato ya Shipre mpe ya Sirene, bakendeki na Antioshe mpe bakomaki koteya Sango Malamu ya Nkolo Yesu epai ya bato oyo balobaka lokota ya Greki.


mpe tango amonaki ye, amemaki ye na Antioshe. Mobu mobimba, Barnabasi mpe Saulo basalaki elongo kati na Lingomba, mpe bateyaki bato ebele. Ezalaki na Antioshe nde bayekoli babengamaki, mpo na mbala ya liboso, Baklisto.


Na mikolo wana, ndambo ya basakoli bakendeki na Antioshe longwa na Yelusalemi.


Polo mpe Barnabasi batelemelaki bato wana ; bongo kobendana makasi ekotaki kati na bango na tina na likambo yango. Boye, bazwaki mokano ete Polo, Barnabasi mpe ndambo ya bandimi mosusu bakende na Yelusalemi elongo na bantoma mpe bakambi ya Lingomba mpo na kolobela likambo yango.


Bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe ya kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi, mpe Silasi ; bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko.


Tango akomaki na Sezarea, amataki na Yelusalemi mpo na kopesa Lingomba mbote ; sima, akendeki na Antioshe.


Likanisi yango esepelisaki lisanga mobimba. Boye, baponaki Etieni, moto oyo atonda na kondima mpe na Molimo Mosantu ; Filipo, Prokore, Nikanori, Timoni, Parimenasi mpe Nikola, moto ya Antioshe, oyo akotaki na lingomba ya Bayuda.


Tango bantoma, kati na Yelusalemi, bayokaki ete bato ya Samari bayambi Liloba na Nzambe, batindelaki bango Petelo mpe Yoane.


Barnabasi azwaki ye mpe amemaki ye epai ya bantoma ; ayebisaki bango ndenge nini Saulo, na mobembo na ye, amonaki Nkolo, mpe ete Nkolo alobaki na ye. Ayebisaki bango lisusu ndenge nini, kati na Damasi, ateyaki na mpiko na Kombo na Yesu.


Tango Petelo ayaki na Antioshe, natelemelaki ye makasi mpo ete azalaki kati na libunga.


Kasi sik’oyo, Timote awuti epai na bino mpe asili kozonga epai na biso, amemeli biso sango ya kitoko na tina na kondima mpe bolingo na bino : ayebisi biso ete bozali tango nyonso na makanisi ya malamu mpo na biso mpe bozali na posa makasi ya komona biso, ndenge biso mpe tozali na posa makasi ya komona bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ