17 Soki Nzambe apesaki bango likabo ya ndenge moko na biso oyo tondimelaki Nkolo Yesu-Klisto, bongo ngai nde nani mpo ete nakoka koboya makambo oyo Nzambe alingi ?
Mpo na nini ozali kosamba na Ye ? Alimbolaka tina ya misala na Ye epai ya moto moko te.
« Boni, moto oyo atiaka tembe na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki koteya Ye ? Tika ete oyo azali koswanisa Nzambe ayanola Ye ! »
Bandimi oyo bazalaki bakatama ngenga, oyo bayaki elongo na Petelo wuta na Jafa, bakamwaki mingi komona ete Nzambe asopi likabo ya Molimo Mosantu epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
— Solo, moto moko te akoki koboya ete bazwa libatisi ya mayi. Bazwi Molimo Mosantu ndenge kaka biso tozwaki.
Wana nazalaki nanu koloba, Molimo Mosantu akitelaki bango ndenge kaka akitelaki biso na ebandeli.
Kasi soki yango ewuti na Nzambe, solo, bokolonga te kosukisa bato oyo. Bosala keba ete bobundisa Nzambe te. Bato ya Likita-Monene bandimaki likanisi ya Gamalieli,