45 Bandimi oyo bazalaki bakatama ngenga, oyo bayaki elongo na Petelo wuta na Jafa, bakamwaki mingi komona ete Nzambe asopi likabo ya Molimo Mosantu epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
Petelo akotisaki bango na ndako mpe apesaki bango esika ya kolala. Mokolo oyo elandaki, Petelo akendeki elongo na bango, mpe ndambo ya bandimi balandaki ye wuta na Jafa.
Petelo azongiselaki bango : — Bobongola mitema ; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.
Yango wana, bobosanaka te ete na kala, bozalaki Bapagano kolanda mbotama na bino ; mpe bato oyo bamibengaka « bato bakatama ngenga » bazalaki kobenga bino « bato bakatama ngenga te, » atako bazalaki bato bakatama ngenga kati na banzoto na bango na nzela ya mosala ya maboko ya bato.