Bongo soki alakisi mabombami yango epai na ngai, ezali te mpo ete naleki bato nyonso na bwanya, kasi ezali mpo ete mokonzi ayeba ndimbola ya ndoto na ye mpe makambo oyo ezali kotungisa motema na ye.
Boye, mokonzi Nabukodonozori agumbamaki elongi kino na mabele, liboso ya Daniele, mpe apesaki ye lokumu ; apesaki mitindo ete bapesa ye makabo mpe babonzela ye malasi ya ansa.
Bongo nafukamaki na makolo ya anjelu mpo na kogumbamela ye, kasi alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo, oyo babatelaka litatoli ya Yesu. Fukamela nde Nzambe ! Pamba te ezali litatoli ya Yesu nde molimo ya lisakoli. »