Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 10:24 - Mokanda na Bomoi

24 Sima na mokolo moko, bakomaki na Sezarea. Kornei azalaki kozela bango, mpe abengisaki bato ya libota na ye mpe balingami na ye mpo ete bazala lisanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 10:24
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba : « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi. Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.


Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba : « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi ! Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.


Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobengisa moninga na ye mpo ete bavanda na se ya nzete ya vino mpe ya figi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Tango Yesu akomaki na etuka ya Sezarea ya Filipo, atunaki bayekoli na Ye : — Bato balobaka ete Mwana na Moto azali nani ?


Bongo Levi asalaki feti monene, kati na ndako na ye, mpo na lokumu ya Yesu ; bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu bazalaki kolia mesa moko elongo na bango.


Na Sezarea, ezalaki na moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Kornei ; » azalaki mokonzi ya basoda oyo babengamaka « mampinga ya Itali. »


Wana bazalaki kosolola, Petelo akotaki na ndako mpe akutaki bato ebele basangani.


Nzokande, Filipo amonanaki na Azoti ; mpe longwa kuna, akendeki na Sezarea, wana azalaki koteya Sango Malamu kati na bamboka nyonso epai wapi azalaki kolekela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ