Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 10:23 - Mokanda na Bomoi

23 Petelo akotisaki bango na ndako mpe apesaki bango esika ya kolala. Mokolo oyo elandaki, Petelo akendeki elongo na bango, mpe ndambo ya bandimi balandaki ye wuta na Jafa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 10:23
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.


Mokolo moko kati na mikolo yango, Petelo atelemaki kati na bandimi pene nkama moko na tuku mibale


Yango wana, tango botindaki bato kobenga ngai, natunaki ata motuna moko te mpo na koya. Sik’oyo, nakoki koyeba tina nini bobengeli ngai ?


Yango wana, natindaki bato noki-noki epai na yo, mpe osali malamu ndenge oyei. Sik’oyo, biso nyonso tozali awa liboso ya Nzambe mpo na koyoka nyonso oyo Nkolo atindi yo koyebisa biso.


Bandimi oyo bazalaki bakatama ngenga, oyo bayaki elongo na Petelo wuta na Jafa, bakamwaki mingi komona ete Nzambe asopi likabo ya Molimo Mosantu epai ya bato ya bikolo ya bapaya.


Molimo alobaki na ngai ete natia tembe te mpo na kokende elongo na bango. Bandeko motoba bakendeki elongo na ngai kino na Sezarea, mpe tokotaki na ndako ya moto yango.


Tango bandeko ya Rome bayokaki ete tokomi, bayaki kino na zando ya Apiusi mpe na esika oyo babengaka « Bandako misato, » mpo na kokutana na biso. Tango Polo amonaki bango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe azwaki lisusu molende.


Kati na Jafa, ezalaki na mwasi moyekoli moko, kombo na ye ezalaki « Tabita. » Na lokota ya Greki, kombo na ye ezalaki Dorkasi (oyo elingi koloba : Mboloko). Azalaki tango nyonso kosala bolamu mpe kosunga babola.


Tango bayekoli bayokaki sango ete Petelo azali kati na Lidi oyo ezali penza pene ya Jafa, batindelaki ye mibali mibale mpo na kosenga na ye : « Tobondeli yo, yaka noki ! »


Sango yango epanzanaki kati na engumba mobimba ya Jafa, mpe bato mingi bandimelaki Nkolo.


Pamba te totondi na posa makasi ya kozala na etamboli ezanga pamela, na miso ya Nkolo kaka te, kasi mpe na miso ya bato.


Bolemba te koyambaka malamu bapaya, pamba te, na nzela wana, bato mosusu bayambaki ba-anjelu wana bayebaki te ete bazali solo ba-anjelu.


Boyambanaka malamu lokola nde boyambi bapaya kati na bandako na bino, bosalaka bongo na koyimayima te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ