18 Babelelaki mpe batunaki soki ezali kuna nde Simona avandaka, Simona oyo kombo na ye mosusu ezali « Petelo. »
Petelo akamwaki mingi mpe akomaki komituna ndimbola ya emoniseli oyo awuti kozwa. Kaka na tango yango, batindami ya Kornei bamonaki ndako ya Simona, oyo bazalaki koluka, mpe batelemaki na ekuke.
Wana Petelo azalaki kaka komitungisa mpo na emoniseli oyo awuti kozwa, Molimo alobaki na ye : — Simona, bato misato bazali koluka yo.
Kaka na tango yango, bato misato bakomaki na ndako epai wapi nazalaki kovanda ; batindaki bango epai na ngai longwa na Sezarea.