Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 10:14 - Mokanda na Bomoi

14 Petelo azongisaki : — Te, Nkolo ! Natikala nanu kolia te eloko ya mbindo to ya bosoto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 10:14
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Loti azongisaki : — Te, nkolo na ngai, tika ete esalema bongo te !


Ekosalema bongo te ! Kaka mibali nde bakokende kogumbamela Yawe, pamba te yango nde likambo oyo bozali kosenga ngai. Boye babenganaki Moyize mpe Aron liboso ya Faraon.


Bongo nalobaki : — Te, Nkolo Yawe ! Natikala nanu komikomisa mbindo te ! Wuta bolenge na ngai, natikala nanu kolia te nyama oyo ekufa yango moko to nyama oyo nyama ya zamba esila koboma ! Te, monoko na ngai etikala nanu kolia mosuni ya mbindo te !


Banganga-Nzambe bakoki kolia te ndeke to nyama oyo ekufi yango moko to oyo nyama mosusu esili koboma.


Daniele azwaki mokano ya koboya komikomisa mbindo na nzela ya bilei mpe ya vino ya mokonzi ; ayebisaki mokonzi ya bakalaka ya lokumu ete apesa ye nzela te ya komikomisa mbindo na lolenge wana.


Yango wana bosengeli kosala bokeseni kati na nyama oyo ezali mbindo mpe oyo ezangi mbindo, kati na ndeke oyo ezali mbindo mpe oyo ezali peto. Bosengeli te komikomisa mbindo na nzela ya nyama, ya ndeke to ya nyama nyonso oyo etambolaka na libumu, oyo natiaki pembeni mpo ete bino mpe bomona yango lokola mbindo.


eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.


Petelo abendaki Yesu na pembeni mpe akomaki kopamela Ye : — Nkolo, tika ete Nzambe abatela Yo mosika ya makambo wana ! Ekokomela Yo te !


Kasi baseka oyo bazalaki mayele bazongisaki : « Te ! Ekokoka te mpo na biso mpe bino ! Ebongi nde bokima mbangu epai ya bateki mafuta mpo ete bosomba mafuta na bino moko. »


Moto moko na maba ayaki, agumbamaki liboso na Ye mpe alobaki : — Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.


Bamonaki bayekoli mosusu ya Yesu kolia lipa na maboko ya mbindo, elingi koloba na maboko oyo basukola te.


Kasi mama na ye alobaki : — Te ! Kombo na ye ezali Yoane.


Mwasi alobaki na Yesu : — Nkolo, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo ; bongo mayi yango ya bomoi, olingaki kozwa yango wapi ?


Bongo mongongo moko elobaki na ye : — Petelo, telema. Boma mpe lia.


Alobaki na bango : — Boyebi malamu ete mibeko na biso epekisa Moyuda kosangana na Mopagano to kokende kotala Mopagano ; kasi Nzambe alakisi ngai ete nasengeli te komona moto moko mbindo to bosoto.


Natunaki : « Nkolo, yo nani ? » Alobaki na ngai : « Nazali Yesu ya Nazareti, oyo yo ozali konyokola. »


Saulo atunaki : — Nkolo, yo nani ? Mongongo ezongisaki : — Ngai, nazali Yesu oyo yo ozali konyokola.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ