12 Kati na yango, ezalaki na lolenge nyonso ya banyama ya mabele, oyo ezali na makolo minei ; ya banyama oyo etambolaka na libumu mpe ya bandeke ya likolo.
Mbwa ya zamba mpe mwana meme ekolia esika moko ; mpe nkosi ekolia matiti lokola ngombe, kasi bilei ya nyoka ekozala nde putulu. Bakoyoka lisusu pasi te, mpe bakobebisama lisusu te na ngomba na Ngai ya bule, » elobi Yawe.
Na mokolo ya suka ya feti, mokolo oyo eleki monene, Yesu atelemaki mpe alobaki na mongongo makasi : — Tika ete moto nyonso oyo azali na posa ya mayi aya epai na Ngai mpe amela.
Tango natalaki yango malamu, namonaki kati na yango banyama ya mabele, oyo ezali na makolo minei ; banyama ya zamba, banyama oyo etambolaka na libumu mpe bandeke ya likolo.
Na esika ete bakumisa Nzambe oyo akufaka te mpe atonda na nkembo, bakumisaki banzambe ya bikeko lokola bililingi ya bato oyo bakufaka, ya bandeke, ya banyama oyo etambolaka na makolo minei mpe oyo etambolaka na libumu.