Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 10:10 - Mokanda na Bomoi

10 Ayokaki nzala mpe azalaki na posa ya kolia, mpe wana bazalaki nanu kobongisela ye bilei, akweyaki na Molimo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 10:10
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kati na Babiloni epai ya bato oyo bakendeki na bowumbu. Makambo oyo ezalaki kosalema kati na emoniseli oyo Molimo ya Nzambe apesaki ngai. Mpe emoniseli oyo namonaki esilaki.


Na nzela ya bimoniseli, Nzambe amemaki ngai kati na Isalaele mpe atiaki ngai na likolo ya ngomba moko ya molayi makasi ; mpe na likolo ya ngomba yango, na ngambo ya sude, ezalaki na bandako batonga lokola engumba.


oyo ayokaka maloba na Nzambe, oyo ayebaka basekele ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, oyo azwaka emoniseli kowuta na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo soki akweyi na molimo, miso na ye efungwamaka :


maloba ya moto oyo ayokaka maloba ya Nzambe, oyo amonaka bimoniseli oyo ewutaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo miso na ye efungwamaka soki akweyi na molimo :


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana azalaki kozonga na engumba, ayokaki nzala.


Sima na Ye kokila bilei mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, ayokaki nzala.


— Wana nazalaki kati na engumba Jafa mpe nazalaki kosambela, nakweyaki na Molimo mpe nazwaki emoniseli. Namonaki eloko moko lokola elamba monene basimba na basonge na yango minei kokita wuta na Likolo, mpe ekomaki kino na esika oyo nazalaki.


Sima na ngai kozonga na Yelusalemi, wana nazalaki kosambela na Tempelo, nakweyaki na Molimo


Na mokolo ya Nkolo, Molimo ya Nzambe asimbaki ngai, mpe nayokaki sima na ngai mongongo moko ya makasi lokola kelelo


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ