Ezali Ye nde abongolaka tango mpe makambo, alongolaka bakonzi mpe atombolaka bakonzi, apesaka bwanya epai ya bato ya bwanya mpe boyebi epai ya bato ya mayele.
Yesu alobaki na bango : — Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela ; kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa ; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.
kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa ; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.
Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya ; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.
Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba ; mpe akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovanda.