Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 1:6 - Mokanda na Bomoi

6 Lokola basanganaki zingazinga na Ye, batunaki Ye : — Nkolo, ekozala na tango wana nde okozongisa Bokonzi epai ya Isalaele ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 1:6
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda, lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye, kino tango nkolo na ye akoya, nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa.


nakokomisa lisusu basambisi na bino malamu lokola na tango ya kala ; mpe bapesi toli na bino, ndenge ezalaka na ebandeli. Sima na yango, bakobenga bino lisusu Engumba ya Bosembo, Engumba ya Boyengebene.


wana nakokaki kobwaka bakitani ya Jakobi mpe ya Davidi, mosali na Ngai, mpe nalingaki te kopona moko kati na bana na ye mpo ete akamba bakitani ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi. Nakozongisa lisusu kitoko ya mokili na bango mpe nakoyokela bango mawa. › »


Kasi bokonzi, nguya mpe lokumu ya bikolo oyo ezali na se ya moyi ekopesama na ekolo ya basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Bokonzi ya ekolo yango ekowumela seko na seko, mpe bakonzi ya bikolo nyonso ya mokili bakosalela mpe bakotosa ekolo yango.


Solo, bana ya Isalaele bakowumela tango molayi bazanga mokonzi, bazanga mokambi, bazanga mbeka, bazanga libanga ya ekaniseli, bazanga efode mpe bazanga banzambe ya bikeko.


Na mokolo wana, nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya, nakobamba madusu na yango, nakotelemisa lisusu bamir na yango oyo ebukana mpe nakotonga yango lisusu ndenge ezalaka kala,


Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.


Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.


Yesu azongisaki : — Solo, Eliya asengeli koya mpe akozongisa makambo nyonso na molongo.


Yesu atunaki ye : — Olingi nini ? Azongisaki : — Laka ngai ete bana na ngai mibale oyo ya mibali bakovanda kati na Bokonzi na Yo : moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi.


Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka : — Yebisa biso : makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili ?


Yesu azongiselaki bango : — Solo, Eliya asengeli koya moto ya liboso mpo na kozongisa makambo nyonso na molongo. Bongo mpo na nini ekomama lisusu ete Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi, mpe basengeli koboya Ye ?


Mokolo moko, Bafarizeo batunaki Yesu : — Bokonzi ya Nzambe ekoya tango nini ? Yesu azongiselaki bango : — Bokonzi ya Nzambe ekoya te na lolenge ete bato bamona yango.


Wana bazalaki koyoka makambo yango, Yesu akobaki koloba lisese moko, pamba te akomaki pene ya Yelusalemi, mpe mpo ete bato bakanisaki ete Bokonzi ya Nzambe elingi komimonisa kaka na tango yango.


Mpe lokola Tata na Ngai apesaki Ngai bokonzi, Ngai mpe nazali kopesa bino bokonzi,


Tango Petelo amonaki ye, atunaki Yesu : — Nkolo, okanisi nini mpo na ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ