Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 1:4 - Mokanda na Bomoi

4 Mokolo moko, wana azalaki kolia elongo na bango, apesaki bango mitindo oyo : « Bolongwa na Yelusalemi te, kasi bozela likabo oyo Tata na Ngai alakaki, likabo oyo boyokaki Ngai kolobela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 1:4
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki lipata etelemi na likolo ya Mongombo mikolo mibale to sanza moko to mpe mobu moko, bana ya Isalaele mpe bazalaki kaka kowumela na molako, bazalaki kokende te ; kasi soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende.


Ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo ya Tata na bino nde akoloba na nzela ya minoko na bino.


Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye !


pamba te Molimo Mosantu akolakisa bino, na tango yango, makambo oyo bosengeli koloba.


Ngai nakotindela bino Molimo oyo Tata na Ngai alakaki ; boye bino, botikala awa, kati na engumba oyo, kino bokotondisama na nguya ya Likolo.


Mpe Ngai, nakosenga epai ya Tata ete apesa bino Molobeli mosusu mpo ete azala elongo na bino tango nyonso,


Tango Molobeli akoya, oyo nakotindela bino kowuta epai ya Tata —Molimo ya bosolo, oyo akowuta epai ya Tata— akotatola Ye moko na tina na Ngai ;


Sima na Yesu koloba makambo wana, afulaki bango mopepe mpe alobaki na bango : — Boyamba Molimo Mosantu !


Yesu alobaki bongo na tina na Molimo oyo bato oyo bakotia kondima na bango kati na Ye bakozwa ; mpo ete na tango wana, Molimo apesamaki nanu te, pamba te Yesu akotaki nanu te kati na nkembo na Ye.


Amonanaki na bato nyonso te, kasi na batatoli oyo Nzambe apona wuta kala, na biso oyo toliaki mpe tomelaki elongo na Ye, sima na Ye kosekwa kati na bakufi.


Sima na loboko ya mobali ya Nzambe konetola Ye, azwaki epai ya Tata, Molimo Mosantu oyo Ye Tata alakaki, mpe asopeli biso Molimo Mosantu yango ndenge bozali komona mpe koyoka sik’oyo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ