Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 1:26 - Mokanda na Bomoi

26 Bongo babetaki zeke, mpe zeke ekweyaki epai ya Matiasi ; boye Matiasi aponamaki, mpe babakisaki ye na lisanga ya bantoma zomi na moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 1:26
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babetaki zeke mpo na kokabola bango, pamba te kati na bakitani ya Eleazari mpe ya Itamari, ezalaki na bakambi ya Esika ya bule mpe bakambi ya mosala ya Nzambe.


mpo na mapa oyo batiaka na mesa liboso ya Yawe, mpo na makabo ya ble ya mokolo na mokolo, mpo na mbeka ya kotumba ya tango nyonso, mpo na makabo ya mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, mpo na makabo ya bule, mpo na bambeka ya bolimbisi masumu ya Isalaele mpe mpo na misala nyonso ya Ndako ya Nzambe na biso. »


Bakambi ya bato bayaki kovanda na Yelusalemi. Ndambo mosusu kati na bato babetaki zeke mpo ete moto moko kati na bato zomi aya kovanda na Yelusalemi, engumba ya bule ; mpe mpo ete bato libwa oyo batikali bavanda kati na bingumba na bango.


Mayele ezali etima ya bomoi mpo na bato oyo bazali na yango, kasi bozoba ezali etumbu mpo na bazoba.


Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe, kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe.


Aron akobeta zeke mpo na bantaba ya mibali nyonso mibale : moko mpo na Yawe, mpe mosusu, mpo na Azazeli.


Bato oyo basalaka na masuwa bamilobelaki bango na bango : « Boya ! Tobeta zeke mpo toyeba moto oyo azali kobendela biso pasi oyo. » Babetaki zeke, mpe zeke yango ekweyaki epai ya Yona.


Tango bantoma bazongaki, basanganaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye makambo nyonso oyo bawutaki kosala mpe nyonso oyo bateyaki.


Bapesaki bakombo ya bato mibale : Jozefi oyo babengaki « Barsabasi » mpe ayebanaki lisusu na kombo Yusitusi, mpe Matiasi.


abebisaki bikolo sambo kati na mokili ya Kanana mpe apesaki mabele na bango lokola libula epai ya bato na Ye.


Petelo atelemaki elongo na bantoma zomi na moko ; mpe na mongongo makasi, alobaki na ebele ya bato : — Bino Bayuda, mpe bino nyonso oyo bovandaka na Yelusalemi, botika ete nalimbola mpo na bino likambo oyo, boyoka malamu makambo oyo nalingi koloba.


Bakabolelaki bango yango na nzela ya zeke, ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota.


Jozue abetaki zeke mpo na bango liboso ya Yawe, na Silo, mpe kuna akabolaki mokili kati na bana ya Isalaele kolanda mabota na bango.


Mir ya engumba yango etongamaki likolo ya miboko zomi na mibale, mpe bakombo ya bantoma zomi na mibale ya Mpate ezalaki ya kokomama na likolo na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ