Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 1:25 - Mokanda na Bomoi

25 mpo ete akoma ntoma mpe azwa, kati na lotomo oyo ya bontoma, esika oyo Yuda atikaki mpo na kokende na esika oyo ebongi na ye. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 1:25
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete bazwa ye lokola moto mabe na tango ya kosamba, mpe libondeli na ye etangama lokola masumu !


Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.


Boye, bakokende na etumbu ya seko, kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko.


Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.


Tango kaka Yuda azwaki eteni yango ya lipa, Satana akotaki kati na ye. Bongo Yesu alobaki na ye : — Likambo oyo obongisi kosala, kokisa yango noki.


Wana nazalaki elongo na bango, nabatelaki bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai ; nabatelaki bango malamu, mpe moko te kati na bango abungaki, longola kaka ye oyo asengeli na libebi mpo ete Makomi ekokisama.


Ezali na nzela na Ye nde nazwaki ngolu ya kozala ntoma mpo na kosala ete na Kombo na Ye, Bapagano batosa Ye na nzela ya kondima.


Soki, mpo na bato mosusu, nazali ntoma te, kasi mpo na bino, nazali solo ntoma, pamba te bino bozali kashe ya bontoma na ngai kati na Nkolo.


Pamba te Nzambe oyo asalaki kati na Petelo mpo ete azala ntoma ya bato oyo bakatama ngenga asalaki mpe kati na ngai lokola mpo ete nazala ntoma ya Bapagano.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ