18 Na nzela ya mbongo oyo azwaki lokola lifuti ya mabe na ye, asombaki elanga ; akweyaki kuna moto na se, libumu na ye epasukaki, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki.
Mpe Yawe alobaki na ngai : — Bwaka yango epai ya mosali mbeki ; yango nde motuya ya malonga oyo bamoni ete ekoki na Ngai ! Nakamataki mbongo yango ya bibende tuku misato mpe nabwakaki yango kati na Tempelo ya Yawe, epai ya mosali mbeki.
Bakambi ya Moabi mpe ya Madiani bakendeki mpe bamemaki makabo mpo na kopesa na Balami, momoni makambo. Tango bakomaki epai ya Balami, bayebisaki ye makambo oyo Balaki atindaki.
Apesaki na mosali ya liboso batalanta mitano ; na mosali ya mibale, batalanta mibale ; mpe na mosali ya misato, talanta moko. Apesaki bango yango kolanda makoki ya moko na moko, mpe akendeki na mobembo.