Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 1:13 - Mokanda na Bomoi

13 Tango bakomaki, bamataki na shambre ya likolo, kati na etaje epai wapi bazalaki kosangana mbala na mbala. Ezalaki : Petelo, Yoane, Jake, Andre, Filipo, Toma, Bartelemi, Matayo ; Jake, mwana mobali ya Alife ; Simona oyo azalaki moto ya lingomba ya Bazelote ; mpe Jide, mwana mobali ya Jake.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 1:13
45 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako ; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu.


Bongo ye akolakisa bino, na etaje ya suka, shambre moko ya monene, babongisa malamu mpe bakoki kosalela yango. Ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika mpo na biso.


Wana amemaki Petelo, Jake mpe Yoane, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ;


Wana azalaki kotambola, amonaki Levi, mwana mobali ya Alife, avandi na ndako ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Levi atelemaki mpe alandaki Ye.


Atikaki moto moko te kolanda Ye longola kaka Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko ya Jake.


Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi epai wapi bazalaki kaka bango moko. Yesu abongolamaki na miso na bango :


Akolakisa bino, na etaje, shambre moko ya monene babongisa malamu ; ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika.


Na bongo, Toma, oyo bazalaki mpe kobenga « Lipasa, » alobaki na bayekoli mosusu : — Biso mpe, tokende mpo ete tokufa elongo na Yesu !


Yuda (Yuda Isikarioti te) atunaki Yesu : — Nkolo, mpo na nini komimonisa epai na biso, kasi epai ya mokili te ?


Mwasi mosali oyo azalaki kokengela ekuke atunaki Petelo : — Boni, yo mpe ozali te moko kati na bayekoli ya moto wana ? Petelo azongisaki : — Nazali moyekoli na ye te.


Wana bayekoli oyo bazalaki esika moko : Simona Petelo, Toma oyo babengaka Lipasa ; Natanaele, moto ya mboka Kana ya Galile, bana ya Zebede mpe bayekoli mosusu mibale ;


Petelo apepelaki bango loboko mpo ete bavanda kimia, mpe ayebisaki bango ndenge nini Nkolo abimisaki ye na boloko. Alobaki lisusu : — Boyebisa makambo oyo epai ya Jake mpe bandeko mosusu. Sima na yango, abimaki mpe akendeki na esika mosusu.


Tango basilisaki koloba, Jake azwaki maloba mpe alobaki : — Bandeko, boyoka ngai !


Petelo atelemaki elongo na bantoma zomi na moko ; mpe na mongongo makasi, alobaki na ebele ya bato : — Bino Bayuda, mpe bino nyonso oyo bovandaka na Yelusalemi, botika ete nalimbola mpo na bino likambo oyo, boyoka malamu makambo oyo nalingi koloba.


Petelo azongiselaki bango : — Bobongola mitema ; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.


Tosanganaki kati na shambre ya likolo, oyo ezalaki na minda ebele.


Wana bamonaki ndenge nini Petelo mpe Yoane bazalaki koloba na mpiko, mpe wana basosolaki ete bazali bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu.


Kasi Petelo mpe Yoane bazongiselaki bango : — Botala nanu ata bino moko, eloko nini ezali sembo na miso ya Nzambe : kotosa bino to kotosa Nzambe ?


Bongo amonanaki epai ya Jake, mpe epai ya bantoma nyonso.


Natikalaki komona ntoma mosusu te, longola kaka Jake, ndeko ya Nkolo.


Boye Jake, Petelo mpe Yoane oyo bazalaki makonzi ya Lingomba bandimaki ngolu oyo Nzambe apesaki ngai. Yango wana basanganaki elongo na ngai mpe Barnabasi mpo na kolakisa ete tokomi moko ; mpe toyokanaki ete biso tokende epai ya Bapagano, mpe bango bakende epai ya bato oyo bakatama ngenga.


Ngai Jake, mosali na Nzambe mpe na Nkolo Yesu-Klisto ; Epai ya mabota zomi na mibale oyo epalangana kati na biloko : Napesi bino mbote.


Ngai mpaka ; Epai ya mwasi moponami ya Nzambe, mpe epai ya bana na ye, oyo nalingaka kati na solo. Ezali ngai moko kaka te moto nalingaka bino, kasi mpe bato nyonso oyo bayebi solo.


Ngai Jide, mowumbu ya Yesu-Klisto mpe ndeko ya Jake ; Epai ya bato oyo Nzambe abenga, ba-oyo Nzambe Tata alingaka, mpe ba-oyo babatelami mpo na Yesu-Klisto :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ