Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 1:10 - Mokanda na Bomoi

10 Mpe wana bazalaki nanu kotala na likolo ndenge Yesu azali komata, mbala moko bato mibale balata bilamba ya pembe-pembe batelemaki pembeni na bango mpe balobaki :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 1:10
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eliya alobaki : — Osengi ngai eloko ya pasi, kasi soki okomona ngai wana Yawe akolongola ngai liboso na yo, okozwa yango ; soki te, okozwa yango te.


Wana nazalaki kotala, namonaki bazali kotanda bakiti ya bokonzi, mpe Mpaka oyo azala liboso ya tango avandaki na moko kati na bakiti yango. Bilamba na Ye ezalaki pembe lokola mvula ya pembe, suki ya moto na Ye ezalaki pembe lokola bapwale ya meme, oyo basukola malamu. Kiti ya Bokonzi na Ye ezalaki lokola moto, mpe bapine na yango ezalaki lokola moto oyo ezali kongala.


Yesu abongolamaki na miso na bango : elongi na Ye ekomaki kongenga lokola moyi, bilamba na Ye ekomaki pembe makasi lokola pole.


Azalaki kongenga lokola mikalikali, mpe bilamba na ye ezalaki pembe makasi lokola mvula ya pembe.


Sima na bango kokota kati na kunda, bamonaki elenge mobali moko, avandi na ngambo ya loboko ya mobali, alata nzambala ya pembe ; somo ekangaki bango.


Wana bazalaki nanu komitungisa mpo na likambo yango, bato mibale babimelaki bango, balata bilamba oyo ezali kongenga makasi.


amonaki ba-anjelu mibale balata bilamba ya pembe mpe bavanda na esika oyo nzoto ya Yesu ezalaki : moko na ngambo ya moto, mpe mosusu, na ngambo ya makolo.


Mokolo moko, na ngonga pene ya misato sima na midi, azwaki emoniseli ; amonaki na polele anjelu moko ya Nzambe koya epai na ye mpe koloba na ye : — Kornei !


Kornei azongisaki : — Eleki mikolo misato, na ngonga lokola oyo, ngonga ya misato sima na midi, nazalaki kosambela kati na ndako na ngai. Mbala moko, moto moko alata bilamba ya kongenga makasi atelemaki liboso na ngai


Nzokande, kati na Sarde, ozali na ndambo ya bato oyo babebisaki te bilamba na bango. Bakotambola elongo na Ngai, na bilamba ya pembe, pamba te babongi na yango.


Nazongiselaki ye : — Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai : — Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ