Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 9:4 - Mokanda na Bomoi

4 Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango : — Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 9:4
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

oyebi tango navandaka mpe tango natelemaka. Liboso na ngai kokanisa, ososolaka mabongisi na ngai ;


Soki tobosanaki Kombo ya Nzambe na biso to totombolaki maboko na biso epai ya nzambe ya mopaya,


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo wana, makanisi ekobotama na motema na yo mpe okosala mabongisi ya mabe.


Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, alobaki na bango : — Bokonzi nyonso oyo bavandi na yango bakomi kobunda bango na bango ekobebisama ; engumba nyonso to ndako nyonso oyo bato na yango bazali lisusu na bomoko te ekowumela te.


Kasi lokola Yesu ayebaki ete bazali bato ya bilongi mibale, alobaki na bango : — Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo ? Bomemela Ngai mbongo moko ya ebende, mpo ete namona yango.


Mbala moko, kati na molimo na Ye, Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki na bango : — Mpo na nini mitema na bino ezali kokanisa bongo ?


Lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na bango : — Bokonzi nyonso oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekomipanza, mpe ndako oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekokweya.


Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, atunaki bango : — Mpo na nini bozali kokanisa biloko oyo kati na mitema na bino ?


Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na moto oyo akufa loboko : — Telema mpe pusana na liboso ya bato nyonso ! Moto yango atelemaki mpe apusanaki na liboso ya bato nyonso.


Yesu alobaki na ye : — Simona, nazali na likambo ya koyebisa yo. Mofarizeo azongisaki : — Moteyi, loba yango.


Wana Yesu asosolaki ete balingi kotuna Ye motuna, alobaki na bango : — Boni, bozali solo na posa ya koyeba tina ya maloba na Ngai oyo : « Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu ? »


Tososoli sik’oyo ete oyebi nyonso, mpe ete ozali na posa te ete bapesa Yo mituna. Mpo na yango, tondimi solo ete owutaki epai ya Nzambe.


Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ? Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye : « Olingaka Ngai ? » Bongo azongiselaki Yesu : — Nkolo, oyebi makambo nyonso ; oyebi malamu ete nalingaka Yo ! Yesu alobaki na ye : — Batela bameme na Ngai.


Yesu asosolaki ete bayekoli na Ye bazalaki koyimayima na tina na yango ; alobaki na bango : — Boni, maloba oyo ebetisi bino mabaku ?


Kasi bato mosusu kati na bino bazali kondima te. Solo, wuta na ebandeli, Yesu ayebaki banani bazalaki kondima te, mpe nani akoteka Ye.


Petelo alobaki na ye : — Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo ? Yoka, makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo esili kokoma liboso ya ekuke ; yo mpe, bakomema yo.


Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ