Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 9:36 - Mokanda na Bomoi

36 Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 9:36
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mishe azongisaki : — Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi : « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te ; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia ! »


Mishe azongisaki : — Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na likolo ya bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi : « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te ; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia ! »


Lokola mboloko oyo bazali kolanda, lokola bameme oyo ezanga mobateli, moko na moko akozonga epai ya bato na ye, moko na moko akokima kino na mboka ya bakoko na ye.


Bato na Ngai bazalaki lokola bameme oyo ebungi nzela ; babateli na bango babungisaki bango nzela, basalaki ete bayengayenga na bangomba, batambola-tambola na bangomba milayi mpe mikuse mpe babosana lopango na bango ya kopemela.


Nzokande, banzambe ya bikeko elobaka maloba ya pamba, mpe bimoniseli ya bato ya soloka ezalaka ya lokuta : bazwaka bandoto oyo ezanga tina, mpe malendisi na bango ezalaka ya lokuta. Yango wana, bato bakomaki kotelengana lokola bibwele oyo ezangi mobateli.


Pamba te nakobimisa kati na mokili mobateli bibwele ya sika oyo akobanda koluka te bibwele oyo ebungi, akolandela te bana bibwele, akosalisa te bapota ya bibwele oyo ezoki, akoleisa te oyo ezali na nzoto kolongono, kasi akobanda koliaka misuni ya bibwele ya mafuta mpe kobuka yango makolo.


moto oyo akobanda kobima mpe kokota liboso na bango, oyo akobanda kobimisa mpe kokotisa bango mpo ete bato na Yawe bazala te lokola bibwele oyo ezanga mobateli.


Kasi bokende epai ya bameme oyo ebunga ya bato ya Isalaele.


Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango. Boye, abandaki kobikisa bandeko na bango, oyo bazalaki kobela.


Yesu azongisaki : — Natindamaki kaka epai ya bameme ebunga ya Isalaele !


Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki : — Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa makasi, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te. Naboyi kozongisa bango na nzala, noki te bakolemba nzoto na nzela.


Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango, pamba te bazalaki lokola bameme oyo ezangi mobateli. Boye, abandaki koteya bango makambo ebele.


— Nazali koyokela bato oyo mawa, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te.


Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso ; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.


Azali na makoki ya kozala na boboto liboso ya bolembu ya bato oyo bazangi boyebi mpe basalaka masumu, pamba te ye moko mpe azali moto na bolembu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ