Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 9:28 - Mokanda na Bomoi

28 Tango Yesu akomaki na ndako, bakufi miso bapusanaki pene na Ye. Atunaki bango : — Bondimi ete nazali na makoki ya kosala oyo bozali kosenga Ngai ? Bazongisaki : — Iyo, Nkolo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 9:28
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Farine etikalaki kosila te na sani, mpe mafuta etikalaki kokawuka te na mbeki, kolanda ndenge Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Eliya.


Mokolo yango kaka, Yesu abimaki na ndako mpe akendeki kovanda pembeni ya ebale.


Bongo Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako. Bayekoli na Ye bayaki epai na Ye mpe batunaki Ye : — Pesa biso ndimbola ya lisese ya matiti mabe kati na elanga.


Mpe asalaki kuna bikamwa mingi te mpo ete bazalaki kondima Ye te.


Tango Yesu akomaki na ndako ya Petelo, akutaki mama-bokilo ya Petelo alala mpo ete azalaki kobela fievele.


Moto moko na maba ayaki, agumbamaki liboso na Ye mpe alobaki : — Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.


Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye ; alobaki : — Mwana na Ngai ya mwasi, yika mpiko ! Kondima na yo ebikisi yo. Mpe kaka na tango yango, mwasi yango abikaki na bokono na ye.


Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga : — Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !


Bongo asimbaki miso na bango mpe alobaki : — Tika ete esalemela bino kolanda kondima na bino !


Mpe moto nyonso oyo andimi Ngai, wana azali na bomoi, akotikala kokufa te. Ondimi yango ?


Yesu alobaki na ye : — Nalobaki na yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe ?


Azalaki koyoka ndenge Polo azalaki koteya. Polo atalaki ye malamu, amonaki ete azali na kondima mpo na kobikisama


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ