Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 9:27 - Mokanda na Bomoi

27 Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga : — Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 9:27
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala molongo ya mbotama ya Yesu-Klisto, mokitani ya Davidi mpe ya Abrayami :


bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.


Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga : — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi.


— Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa ! Azali na maladi ya ndeke mpe azali penza komona pasi : akweyaka mbala mingi na moto to na mayi.


Tango Yesu elongo na bayekoli na Ye balongwaki na Jeriko, bato ebele balandaki Yesu.


Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basilikaki makasi tango bamonaki bikamwa oyo Yesu asalaki mpe ndenge bana bazalaki koganga kati na lopango ya Tempelo : « Ozana na Mwana na Davidi ! »


Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana na Mwana na Davidi ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »


Tango Yesu akomaki na ndako, bakufi miso bapusanaki pene na Ye. Atunaki bango : — Bondimi ete nazali na makoki ya kosala oyo bozali kosenga Ngai ? Bazongisaki : — Iyo, Nkolo !


Tika ete bokonzi oyo eyei epambolama, bokonzi ya Davidi, tata na biso ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »


Mbala mingi, molimo mabe etindikaka ye na moto to na mayi mpo na koluka koboma ye. Kasi soki okoki kobikisa ye, yokela biso mawa mpe sunga biso.


mpe babandaki kobelela Ye na mongongo makasi : — Mokonzi, Yesu, yokela biso mawa !


Yesu mpe atunaki bango : — Mpo na nini balobaka ete Klisto azali mwana ya Davidi ?


Kaka na tango, Yesu abikisaki bato ebele na bokono, na pasi mpe na milimo mabe, mpe afungolaki miso ya bakufi miso ebele.


Boni, Makomi ezali koloba te ete Klisto akobimela na libota ya Davidi mpe akobotama na Beteleemi, mboka ya Davidi ? »


Sango Malamu oyo ezali koloba na tina na Mwana na Ye, oyo kati na bomoto na Ye, abotamaki na libota ya Davidi,


mpe bakoko. Ezali na nzela ya bakoko yango nde Klisto, oyo azali na likolo ya nyonso, ayaki na mokili lokola moto. Tika ete Nzambe apambolama libela na libela ! Amen !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ