Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 9:26 - Mokanda na Bomoi

26 Sango ya likambo yango epanzanaki na etuka wana mobimba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 9:26
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango.


Kasi bango, tango kaka babimi, bakomaki kopanza sango na Ye kati na etuka wana mobimba.


Mbala moko, sango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka mobimba ya Galile.


Kasi tango kaka abimaki, abandaki koloba mpe kopanza sango. Mpo na yango, Yesu azalaki lisusu te kokoka kokota kati na bingumba na miso ya bato nyonso ; kasi akomaki kovanda na libanda ya bingumba, na bisika oyo ebombama. Nzokande, bato bazalaki kaka kowuta bipai na bipai mpo na koya epai na Ye.


Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi. Bazalaki koloba boye na tina na Yesu : « Yoane Mobatisi asekwi kati na bakufi ! Yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa ! »


Yesu azongaki na Galile, atonda na nguya ya Molimo ; mpe basango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka wana mobimba.


Mpe sango na tina na Yesu epanzanaki na bamboka ya etuka mobimba.


Sango na tina na Yesu ezalaki kaka kopanzana se kopanzana, mpe bato ebele bazalaki koya kosangana mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango.


Sango oyo na tina na Yesu epanzanaki kati na Yuda mpe kati na bamboka ya zingazinga.


Mokonzi Agripa kutu ayebi makambo oyo malamu ; yango wana nazali koloba na molende nyonso liboso na ye. Nandimisami ete abungi ata likambo moko te kati na makambo yango, pamba te esalemaki na nkuku te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ