Jeremi asalaki nzembo ya mawa mpo na Joziasi. Bayembi nyonso ya mibali mpe ya basi bayembelaki Joziasi banzembo ya mawa kino na mokolo ya lelo mpe bakomisaki likambo yango mobeko kati na Isalaele. Banzembo yango ekomama kati na buku ya banzembo ya mawa.
« ezala mikolo to bana mike, bango nyonso bakosila kokufa kati na mokili oyo. Bakokunda bango te mpe bakosalela bango matanga te, bongo moto moko te akomikata banzoloko to kokokola suki ya moto mpo na bango.
Lela na se ya motema, kosala matanga na tina na ye te. Kanga kitendi na moto na yo mpe tia sandale na makolo na yo ; kozipa mandefu ya elongi na yo te mpe kolia bilei ya matanga te, ndenge ezali ezaleli ya bokoko na bino. »
Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga, bamoko na bamosusu : « Tobetaki baflite, kasi bobinaki te ; toyembelaki bino banzembo ya matanga, kasi bolelaki te ! »
Mbala moko, Petelo akendeki elongo na bango ; mpe tango akomaki, bamemaki ye na shambre ya likolo. Basi nyonso oyo bakufisa mibali bayaki kozingela ye, bazalaki kolela mpe kolakisa ye banzambala mpe bilamba mosusu oyo Dorkasi asalaki, wana azalaki nanu elongo na bango.
Mindule ya babeti mandanda mpe ya bayembi, ya babeti piololo mpe babeti kelelo, ekoyokana lisusu te kati na yo. Bato ya misala ya maboko ya ndenge na ndenge bakomonana lisusu te kati na yo. Makelele ya mabanga minene oyo banikelaka ble ekoyokana lisusu te kati na yo.