Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 9:22 - Mokanda na Bomoi

22 Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye ; alobaki : — Mwana na Ngai ya mwasi, yika mpiko ! Kondima na yo ebikisi yo. Mpe kaka na tango yango, mwasi yango abikaki na bokono na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 9:22
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Yesu alobaki na ye : — Mwasi, kondima na yo ezali monene ! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo ! Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.


Yesu abenganaki molimo mabe, mpe molimo mabe yango ebimaki kati na mwana. Kaka na tango yango, mwana abikaki.


Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda : — Zonga na ndako na yo ! Tika ete esalemela yo kolanda kondima na yo ! Mpe kaka na tango yango, mosali abikaki.


Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango : — Mwana na Ngai, yika mpiko ! Masumu na yo elimbisami.


Bongo asimbaki miso na bango mpe alobaki : — Tika ete esalemela bino kolanda kondima na bino !


Yesu alobaki na ye : — Kende, kondima na yo ebikisi yo. Mbala moko, akomaki komona mpe alandaki Yesu.


Yesu alobaki na ye : — Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia mpe zwa lobiko kati na pasi na yo !


Bongo alobaki na moto yango ya Samari : — Telema mpe kende ; kondima na yo ebikisi yo !


Yesu alobaki na ye : — Mona ! Kondima na yo ebikisi yo.


Kasi Yesu alobaki na mwasi yango : — Kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia !


Kasi Yesu alobaki na ye : — Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia.


Tata asosolaki ete ezalaki kaka na ngonga oyo Yesu alobaki na ye : « Mwana na yo ya mobali azali na bomoi. » Bongo ye elongo na bato nyonso ya ndako na ye bandimaki.


Azalaki koyoka ndenge Polo azalaki koteya. Polo atalaki ye malamu, amonaki ete azali na kondima mpo na kobikisama


Lokola azalaki kosala bongo wuta mikolo ebele, suka na suka, Polo atombokaki, abalukaki mpe alobaki na molimo mabe yango : — Na Kombo na Yesu-Klisto, napesi yo mitindo : bima kati na mwasi oyo ! Kaka na tango yango, molimo yango ebimaki kati na ye.


Pamba te, biso mpe toyokaki Sango Malamu lokola bango ; kasi mateya oyo bayokaki esungaki bango ata na likambo moko te mpo ete bato oyo bayokaki yango bayambaki yango na kondima te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ