Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 9:2 - Mokanda na Bomoi

2 Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango : — Mwana na Ngai, yika mpiko ! Masumu na yo elimbisami.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 9:2
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kende, lia bilei na yo na esengo mpe mela masanga na yo ya vino na motema ya esengo ; pamba te Nzambe asili kondima misala na yo.


Nalongoli mabe na yo lokola lipata, masumu na yo lokola lipata ya tongo. Zonga epai na Ngai, pamba te nasili kosikola yo. »


Kasi, mbala moko, Yesu alobaki na bango : — Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali nde Ngai !


Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango.


limbisa mabe na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo basalaki biso mabe ;


Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye : — Nazali koloba na bino penza ya solo : natikali nanu komona te kondima ya boye kati na Isalaele !


Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Kaka na liloba moko, Yesu abenganaki milimo mabe yango ; abikisaki mpe babeli nyonso.


Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye ; alobaki : — Mwana na Ngai ya mwasi, yika mpiko ! Kondima na yo ebikisi yo. Mpe kaka na tango yango, mwasi yango abikaki na bokono na ye.


Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami to telema mpe tambola ? »


Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili. Bongo alobaki na ebosono : — Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.


Wana moyi elalaki mpe pokwa eyaki, bamemelaki Yesu babeli nyonso mpe bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe.


Yesu atelemaki mpe alobaki : — Bobenga ye ! Bato babengaki mokufi miso yango mpe balobaki na ye : — Yika mpiko ! Telema ! Azali kobenga yo !


Yesu alobaki na ye : — Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia mpe zwa lobiko kati na pasi na yo !


Solo, bango nyonso bamonaki Ye, mpe somo makasi ekangaki bango. Mbala moko, Yesu alobaki na bango : « Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali Ngai ! »


Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.


Azalaki ata na posa te ete bayebisa Ye makambo na tina na bato, pamba te ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki kati na mitema na bango.


Yesu abengaki bango : — Bana na Ngai ! Boni, bozali na mbisi te ? Bazongisaki : — Te !


Azalaki koyoka ndenge Polo azalaki koteya. Polo atalaki ye malamu, amonaki ete azali na kondima mpo na kobikisama


Boye bato bakomaki kokamata miswale mpe bilamba oyo etuti nzoto ya Polo, mpo na kotia yango na banzoto ya babeli, bongo bokono ya bato yango ezalaki kosila, mpe milimo mabe ezalaki kobima kati na bango.


Na butu oyo elandaki, Nkolo abimelaki Polo kati na emoniseli mpe alobaki na ye : — Yika mpiko ! Ndenge kaka otatolaki na tina na Ngai kati na Yelusalemi, ndenge mpe osengeli kotatola kati na Rome.


Yango kaka te ! Tozali mpe komikumisa kati na Nzambe na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo azongisi boyokani na biso elongo na Nzambe.


Nzokande moto mosusu akoki koloba : « Yo ozali na kondima ; kasi ngai, nazali na misala. » Lakisa ngai kondima na yo, oyo ezangi misala ; mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na nzela ya misala na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ