Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 9:15 - Mokanda na Bomoi

15 Yesu azongiselaki bango : — Boni, bato oyo babengami na feti ya libala bakoki solo kozala na mawa, wana mobali ya libala azali elongo na bango ? Nzokande, tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango ; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 9:15
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki kobenga bino na mokolo wana mpo ete bolela mpe bosala matanga, bomikokola suki mpe bolata saki.


Bongo bayekoli ya Yoane bayaki mpe batunaki Yesu : — Mpo na nini biso mpe Bafarizeo tokilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te ?


Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala, mpe ekosala lidusu monene koleka.


Yesu azongiselaki bango : — Ndenge nini bato oyo babengami na feti ya libala bakoki kokila bilei, wana mobali ya libala azali nanu elongo na bango ? Tango nyonso mobali ya libala azali elongo na bango, bakoki kokila bilei te.


Kasi tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango ; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.


Bongo alobaki na bayekoli na Ye : — Tango ezali koya, tango oyo bokozala na posa makasi ya komona ata mokolo moko kati na mikolo ya Mwana na Moto, kasi bokomona yango te.


Yesu azongiselaki bango : — Boni, bokoki solo kosenga na bato oyo babengami na feti ya libala ete bakila bilei wana mobali ya libala azali nanu elongo na bango ?


Tango ezali koya, oyo mobali ya libala akozala lisusu te elongo na bango ; ekozala na tango wana nde bakokila bilei.


Kasi mpo ete nalobi na bino bongo, mawa etondi kati na mitema na bino.


Mwasi ya libala azali ya mobali oyo abali ye ; mpe moninga ya mobali oyo asili kobala, ezali moto oyo atelemi pembeni na ye mpe azali na esengo makasi tango azali koyoka mongongo na ye. Ezali mpe bongo mpo na ngai : esengo na ngai ezali sik’oyo ya kokoka.


Polo mpe Barnabasi baponaki bakambi mpo na Lingomba moko na moko mpe, sima na bango kosambela mpe kokila bilei, bakabaki bango na maboko ya Nkolo oyo bandimelaki.


Bopimelanaka nzoto te, longola kaka soki, na boyokani mpe mpo na mwa tango moke, bolingi tango mosusu komipesa na losambo. Kasi sima na tango yango, bozongela kosangisa nzoto mpo ete Satana akozwa nzela te ya komeka bino likolo ya bozangi makoki ya komikanga.


Solo nasalaki misala makasi mpe ya pasi penza ; mbala mingi, nalalaki pongi te, nazangaki bilei ya kolia mpe mayi ya komela, nakilaki bilei, nanyokwamaki na malili, mpe nazangaki bilamba ya kolata.


Bongo anjelu alobaki na ngai : « Koma : ‹ Esengo na bato oyo babengami na feti ya libala ya Mpate ! › » Alobaki lisusu : « Ezali maloba ya solo ya Nzambe. »


Namonaki engumba ya bule, Yelusalemi ya sika, kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. Ebongisamaki lokola mwasi mobandami ya libala oyo asali monzele mpo na mobali na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ