12 Kasi lokola Yesu ayokaki Bafarizeo koloba bongo, alobaki na bango : — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te ; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye.
Nakozongisela yo bomengo na yo mpe nakobikisa bapota na yo, › elobi Yawe. ‹ Lokola bazalaki kobenga yo ekolo basundola, Siona oyo moto moko te ayokelaka mawa ; ›
Kasi nakoyeisa bato na yango nzoto kolongono mpe nakobikisa bango ; solo, nakobikisa bato na Ngai mpe nakopesa bango bomoi ya kimia kati na bobatelami.
Asiri akokoka kobikisa biso te ; tokomata na mpunda ya bitumba te mpe tokoloba lisusu te na misala ya maboko na biso : ‹ Bozali banzambe na biso, › pamba te ezali Yo, Yawe, nde oyokelaka mwana etike mawa. »
Tango Yesu ayokaki bongo, alobaki na bango : — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te ; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye. Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.
Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale ; mpe asilisaki bozwi na ye nyonso epai ya minganga, kasi moko te alongaki kobikisa ye na bokono yango.
Kasi tango ebele ya bato bayokaki bongo, balandaki Ye. Yesu ayambaki bango, ateyaki bango na tina na Bokonzi ya Nzambe, abikisaki mpe bato oyo bazalaki na posa ya lobiko na bokono ya nzoto.