Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 9:11 - Mokanda na Bomoi

11 Tango Bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli ya Yesu : — Mpo na nini moteyi na bino azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 9:11
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bato oyo balobaka : ‹ Zala mosika na Ngai, kopusana pene na Ngai te, pamba te nazali bule makasi na miso na yo ! › Bato ya lolenge oyo bazali lokola milinga na zolo na Ngai, lokola moto oyo epelaka mikolo nyonso.


Mpe awa Mwana na Moto mpe ayei, azali kolia mpe azali komela ; kasi bazali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe azali molangwi masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu. » Nzokande, misala ya bwanya etalisaka solo ete ezali sembo.


Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, lifuti nini bokozwa ? Boni, bafutisi mpako basalaka mpe bongo te ?


Wana Yesu azalaki kolia kati na ndako ya Matayo, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bayaki mpe baliaki mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye.


Tango balakisi ya Mobeko ya lingomba ya Bafarizeo bamonaki Yesu kolia mesa moko na bato ya masumu mpe bafutisi mpako, batunaki bayekoli na Ye : — Mpo na nini azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?


Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakomaki koyimayima ; bazalaki koloba : — Tala, akei kolala na ndako ya moto ya masumu !


Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bazalaki lingomba moko elongo na bango bakomaki koyimayima mpe balobaki na bayekoli ya Yesu : — Mpo na nini bozali kolia mpe komela mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?


mpe balobaki : — Okotaki na ndako ya bato ya bikolo ya bapaya mpe oliaki elongo na bango !


Biso tobotama Bayuda, tozali Bapagano te oyo bazali basumuki.


Azali na makoki ya kozala na boboto liboso ya bolembu ya bato oyo bazangi boyebi mpe basalaka masumu, pamba te ye moko mpe azali moto na bolembu.


Soki moto moko ayei epai na bino mpe amemeli bino mateya mosusu, boyamba ye te kati na bandako na bino, mpe bopesa ye ata mbote te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ