Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 8:9 - Mokanda na Bomoi

9 Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai ; soki nalobi na moko : « Kende ! » akendaka ; mpe soki nalobi na mosusu : « Yaka ! » ayaka ; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai : « Sala mosala oyo ! » asalaka yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 8:9
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

opesa mibeko, mpe ezali kaka kino na mokolo ya lelo, pamba te nyonso kati na mokili mobimba epesaka Yo lokumu.


ezala moto to mvula ya mabanga, ezala mvula ya pembe to londende, ezala mopepe makasi oyo ekokisaka liloba na Ye ;


Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye : — Nazali koloba na bino penza ya solo : natikali nanu komona te kondima ya boye kati na Isalaele !


Mokonzi ya basoda alobaki : — Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai ! Loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye.


Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kotunana : — Oyo ezali lisusu likambo nini ? Tala mateya ya sika oyo etondi na nguya ! Azali kopesa mitindo ata na milimo mabe, mpe ezali kotosa Ye !


Yesu agumbamaki pembeni na ye, apesaki mitindo na fievele, mpe fievele esilaki. Kaka na tango yango, mama-bokilo ya Simona atelemaki mpe akomaki kobongisela bango bilei.


Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai. Soki nalobi na moko : « Kende, » akendaka ; mpe na mosusu : « Yaka, » ayaka ; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai : « Sala mosala oyo, » asalaka yango.


Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale, apesaki bango nguya mpe bokonzi ya kobengana milimo nyonso ya mabe mpe ya kobikisa bokono ;


Bawumbu, botosaka bankolo na bino na makambo nyonso ; na miso na bango kaka te, lokola nde bozali kosepelisa bato, kasi na mitema ya bosembo mpe kati na kotosa Nkolo.


Teya bawumbu ete batosaka bankolo na bango na makambo nyonso, basalaka makasi mpo na kosepelisa bango, babendanaka na bango te


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ