Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 8:5 - Mokanda na Bomoi

5 Tango Yesu akotaki na Kapernawumi, mokonzi moko ya basoda ayaki epai na Ye mpe asengaki Ye lisungi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 8:5
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo ? Te ! Okokitisama kino na mboka ya bakufi ! Pamba te, soki bikamwa oyo esalemaki kati na yo esalemaki kati na Sodome, mbele Sodome ezali kowumela kino na mokolo ya lelo.


Tango mokonzi ya basoda ya Rome elongo na basoda oyo bazalaki kokengela Yesu bamonaki ndenge mabele eninganaki mpe nyonso oyo esalemaki, bayokaki somo makasi mpe balobaki : — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !


Kasi avandaki na Nazareti te ; akendeki nde kovanda na Kapernawumi oyo ezalaki pembeni ya ebale, kati na etuka ya Zabuloni mpe ya Nefitali,


Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendeki na engumba na Ye.


Mpe tango mokonzi ya basoda ya Rome, oyo atelemaki liboso ya Yesu, amonaki ndenge Yesu akufaki, alobaki : — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !


Sima na mwa mikolo, Yesu azongaki lisusu na Kapernawumi. Tango bato bayokaki ete azali na ndako,


Wana bazalaki kokanga Polo basinga, Polo atunaki mokonzi oyo azalaki wana : — Boni, mibeko epesi penza ndingisa ya kobeta moto ya Rome fimbu, wana bosambisi ye nanu te ?


Bongo Polo abengaki mokonzi moko ya basoda nkama moko mpe alobaki na ye : — Mema elenge mobali oyo epai ya mokonzi, pamba te azali na likambo ya koyebisa ye.


Sima na mwa tango moke, mokonzi ya basoda abengisaki bakonzi mibale ya basoda nkama moko mpe alobaki na bango : — Bobongisa basoda nkama mibale, basoda tuku sambo oyo batambolaka na bampunda mpe basoda mosusu nkama mibale, mpo ete bakende na Sezarea, na ngonga ya libwa ya butu.


Wana mwa mopepe moko ya sude ekomaki kopepa, bakanisaki ete posa na bango ezali kokokisama ; boye batombolaki longo, mpe masuwa ekomaki kotambola pembeni-pembeni ya esanga ya Kreti.


Polo alobaki na mokonzi ya basoda nkama moko mpe na basoda : — Tala, soki bato oyo batikali te kati na masuwa, bino mpe bokobika te.


Kasi lokola mokonzi ya basoda nkama moko azalaki na posa ya kobikisa Polo, apekisaki bango kokokisa likanisi na bango. Boye, atindaki bato oyo bayebaki kokata mayi ete bazala bato ya liboso ya kokweya na mayi mpe bakende na mokili.


Tango bayekoli bayokaki sango ete Petelo azali kati na Lidi oyo ezali penza pene ya Jafa, batindelaki ye mibali mibale mpo na kosenga na ye : « Tobondeli yo, yaka noki ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ