Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 8:31 - Mokanda na Bomoi

31 Milimo mabe esengaki na Yesu : — Soki okobengana biso, tinda biso kati na etonga wana ya bangulu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 8:31
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango.


Bopesa te biloko ya bule epai ya bambwa, noki te ekozongela bino mpo na koswa bino ; bobwaka te bapawuni na bino ya talo epai ya bangulu, noki te ekonyata-nyata yango.


Etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia mwa mosika ya esika oyo bazalaki.


Yesu alobaki na milimo yango : — Bobima ! Milimo mabe ebimaki kati na bato wana mibale mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga nyonso ya bangulu ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba kino na ebale ; mpe yango nyonso ezindaki mpe ekufaki kati na mayi.


Milimo mabe esengaki na Yesu : « Tinda biso kati na bangulu, mpo ete tokota kati na yango. »


mpe agangaki na makasi nyonso : — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, ngai na Yo likambo nini ? Nabondeli Yo na Kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te !


Yango wana, yo Lola, sepela ; mpe bino bavandi ya Lola, bosepela ! Kasi mawa na mokili mpe na ebale monene, pamba te Satana akiti epai na bino ! Atondi na kanda, pamba te ayebi malamu ete atikali kaka na tango moke. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ