Ye oyo atindaki ete loboko na Ye ya nkembo ezala elongo na loboko ya mobali ya Moyize, Ye oyo akabolaki mayi ya ebale monene liboso na bango mpo na kopesa Kombo na Ye lokumu mpo na libela ;
Oh Yawe, otombokelaki nde bibale ? Osopelaki nde miluka kanda na Yo ? Osilikelaki nde ebale monene tango ozalaki kotambola likolo ya bampunda, likolo ya bashar na Yo ya lokumu ?
Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo : « Longwa awa, kende kuna ; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [
Soki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino ? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka ? Bato ya kondima moke !
Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo : — Kanga monoko na yo ! Bima kati na moto oyo ! Molimo mabe ebwakaki moto yango na mabele, liboso ya bato nyonso, ebimaki kati na ye mpe esalaki ye ata mabe moko te.
Nzokande, na esika ete atia tembe na elaka ya Nzambe mpe aboya kondima, kasi kondima na ye epesaki ye lisusu makasi koleka mpe azalaki kopesa Nzambe nkembo,