Elize atikaki bangombe na ye, akimaki mbangu sima na Eliya mpe alobaki : — Tika ete nakende nanu kopesa tata mpe mama na ngai beze mpo na kokabwana na bango, bongo nakolanda yo. Eliya azongisaki : — Zonga na yo, nasali yo nini ?
Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako ; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu.
Wana azalaki kotambola, amonaki Levi, mwana mobali ya Alife, avandi na ndako ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Levi atelemaki mpe alandaki Ye.
Yesu alobaki bongo mpo na kotalisa lolenge ya kufa oyo Petelo asengelaki kokufa mpo na nkembo ya Nzambe. Sima na Ye koloba bongo, alobaki na Petelo : — Landa Ngai !
Bino oyo bozalaki bakufi kati na masumu na bino mpe kati na bozangi kokatisa ngenga ya nzoto na bino, Nzambe akomisaki bino bato ya bomoi elongo na Klisto. Alimbisaki masumu na biso nyonso,