Mpe moto nyonso oyo atiki bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, tata, mama, bana to bilanga mpo na Kombo na Ngai akozwa yango koleka mbala nkama elongo na bomoi ya seko.
Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.
Boye, kobanda sik’oyo, tokotala lisusu moto moko te na ndenge ya bomoto. Atako, na kala, totalaki Klisto na ndenge ya bomoto, kasi sik’oyo tozali lisusu kotala Ye bongo te.