Na mokolo ya lelo, atako bapakola ngai mafuta lokola mokonzi, nazali na makasi te, mpe bana mibali oyo ya Tseruya baleki ngai na makasi. Tika ete Yawe apesa etumbu na moto oyo asali mabe oyo kolanda mabe na ye ! »
Yawe abetaki mokonzi, mpe mokonzi abelaki bokono ya maba kino na mokolo na ye ya kufa. Boye akomaki kovanda na ndako moko batonga mosika. Yotami, mwana mobali ya mokonzi, oyo azalaki mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, ayangelaki bato ya mokili.
Namani, mokonzi ya basoda ya mokonzi ya Siri, azalaki moto monene mpe moto ya lokumu mingi na miso ya nkolo na ye, pamba te, na nzela na ye, Yawe apesaki bato ya Siri elonga. Azalaki soda ya mpiko, kasi azalaki na bokono ya maba.
Lokola osali bongo, bokono ya maba ya Namani ekokangama na yo mpe bakitani na yo mpo na libela. Bongo Geazi alongwaki na liboso ya Elize. Poso ya nzoto na ye ekomaki na maba, mpe akomaki pembe lokola mvula ya pembe.
Bakomaki na ndako yango, bamonaki Mwana elongo na Mari, mama na Ye, mpe bagumbamelaki Ye ; bongo bafungolaki mabenga na bango mpe babonzelaki Ye biloko oyo lokola bakado : wolo, malasi ya ansa mpe mire.
Wana Yesu azalaki koloba na bango, mokambi moko ayaki ; agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sik’oyo ; yaka, tiela ye loboko, mpe akozonga lisusu na bomoi.
Mpe na tango ya mosakoli Elize, bato na maba bazalaki ebele kati na Isalaele, kasi moko te kati na bango apetolamaki, longola kaka Namani, moto ya Siri. »
Basekele ya motema na ye ekomonisama polele. Bongo, akofukama elongi kino na mabele, akogumbamela Nzambe mpe akoloba : « Solo, Nzambe azali kati na bino. »
Bongo nafukamaki na makolo ya anjelu mpo na kogumbamela ye, kasi alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo, oyo babatelaka litatoli ya Yesu. Fukamela nde Nzambe ! Pamba te ezali litatoli ya Yesu nde molimo ya lisakoli. »