Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 8:18 - Mokanda na Bomoi

18 Tango Yesu amonaki ete bato ebele bazingeli Ye, apesaki mitindo epai ya bayekoli na Ye ete bakatisa na ngambo mosusu ya ebale.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 8:18
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na ngambo mosusu ya ebale, wana akozongisa bato.


Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki Ye.


Kaka na mokolo yango wana, wana pokwa ekomaki, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.


Yesu azwaki bwato mpe azongaki na ngambo ya ebale ; mpe bato ebele basanganaki pene na Ye, pembeni ya ebale.


Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na Betisaida, na ngambo mosusu ya ebale, wana Ye moko akozongisa bato.


Bongo atikaki bango, amataki lisusu na bwato mpe akendeki na ngambo mosusu ya ebale.


Mokolo moko, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale. Bongo bamataki na bwato mpe bakendeki.


Kasi, lokola Yesu ayebaki ete bazali na makanisi ya kokamata Ye mpo na kokomisa Ye mokonzi, abendanaki lisusu na ngomba mpo ete azala kaka Ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ