Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 8:17 - Mokanda na Bomoi

17 Na bongo nde ekokisamaki liloba oyo mosakoli Ezayi alobaki : « Amemaki mokumba ya pasi na biso mpe abikisaki biso na bokono na biso. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 8:17
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami azwaki bakoni ya kotumbela mbeka mpe amemisaki yango Izaki, mwana na ye ; mpe ye moko amemaki moto mpe mbeli, bongo bango mibale bakendeki nzela moko.


Solo, amemaki mokumba ya bokono na biso mpe alataki pasi na biso kati na nzoto na ye ; kasi biso, tokanisaki ete Nzambe nde abetaki ye, apesaki ye etumbu mpe asambwisaki ye.


Makambo wana nyonso esalemaki mpo na kokokisa maloba oyo Nkolo alobaki na nzela ya mosakoli :


epai wapi awumelaki kino na kufa ya Erode, mpo ete makambo oyo Nkolo alobaki na nzela ya mosakoli ekokisama : « Wuta na Ejipito, nabengaki mwana na Ngai. »


epai wapi avandaki kati na engumba Nazareti, mpo ete makambo oyo basakoli balobaki ekokisama : « Bakobenga Ye moto ya Nazareti. »


Wana moyi elalaki mpe pokwa eyaki, bamemelaki Yesu babeli nyonso mpe bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe.


Na pokwa, bato nyonso oyo bazalaki na babeli ya bokono ya ndenge na ndenge bamemaki bango epai ya Yesu. Yesu atielaki moko na moko kati na bango maboko mpe abikisaki bango.


Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko to mpe na pasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka ; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi.


Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ