Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 8:16 - Mokanda na Bomoi

16 Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Kaka na liloba moko, Yesu abenganaki milimo mabe yango ; abikisaki mpe babeli nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 8:16
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »


Bongo bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki mokufi miso mpe azalaki koloba te. Yesu abikisaki ye ; boye moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba mpe komona.


Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango. Boye, abandaki kobikisa bandeko na bango, oyo bazalaki kobela.


Yesu asimbaki ye na loboko, mpe fievele esilaki ; bongo atelemaki mpe akomaki kobongisela Yesu bilei.


Bakengeli bangulu bakimaki, bakendeki kati na engumba kopesa sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema mpe ndenge nini bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe basilaki kokangolama.


Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango : — Mwana na Ngai, yika mpiko ! Masumu na yo elimbisami.


Bato mosusu bamemelaki Ye ebosono oyo bato minei batomboli.


Pamba te Yesu alobaki na molimo yango : « Yo molimo mabe, bima kati na moto oyo ! »


Tango Yesu amonaki ebele ya bato koya mbangu, abenganaki molimo mabe : — Molimo mabe, yo oyo okomisaka moto baba, napesi yo mitindo : bima kati na mwana oyo mpe kozonga lisusu te kati na ye.


Tango Yesu amonaki ye, abengaki ye wuta na liboso mpe alobaki na ye : — Mwasi, okangolami na pasi na yo !


Na pokwa, bato nyonso oyo bazalaki na babeli ya bokono ya ndenge na ndenge bamemaki bango epai ya Yesu. Yesu atielaki moko na moko kati na bango maboko mpe abikisaki bango.


Milimo mabe mpe ebimaki kati na bato ebele na koganga : « Ozali solo Mwana na Nzambe ! » Kasi Yesu apesaki yango mitindo ete eloba te, pamba te eyebaki ete Yesu azali Klisto.


Bongo, bazalaki komema babeli na babalabala, kolalisa bango na bambeto mpe na bitoko mpo ete tango Petelo akoleka, elilingi na ye ekoka kozipa bamoko kati na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ