Mokolo moko, tango bazalaki kokunda moto moko, bamonaki na mbalakata lisanga moko ya bato mabe. Bongo, babwakaki na lombangu ebembe ya moto yango kati na kunda ya Elize. Tango ebembe etutaki mikuwa ya Elize, moto yango azongaki na bomoi mpe atelemaki.
atutisaki likala yango na monoko na ngai mpe alobaki : « Tala, lokola likala oyo etuti bibebu na yo, mabe na yo esili kolongwa, masumu na yo esili kolimbisama. »
Basengaki na Ye ete apesa babeli nzela ya kosimba ata singa ya songe ya elamba na Ye. Mpe bato nyonso oyo balongaki kosimba yango babikaki na bokono na bango.
Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Kaka na liloba moko, Yesu abenganaki milimo mabe yango ; abikisaki mpe babeli nyonso.
Na tango yango kaka, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Mwasi yango ayaki na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye,