11 Lisusu, nazali koloba na bino solo ete bato ebele bakowuta na Este mpe na Weste, mpe bakovanda na mesa elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi kati na Bokonzi ya Likolo.
Bana na yo bakozala ebele lokola putulu ya mabele, bakopanzana na bangambo nyonso : wuta na weste kino na este, wuta na nor kino na sude. Mabota nyonso ya mokili ekomipambola mpo na yo mpe mpo na bakitani na yo.
Na mokolo wana, bakitani ya Izayi bakotelema lokola bendele mpo na bikolo, bato ya bikolo ya bapaya bakoya noki epai na bango ; mpe esika na bango ya kopema ekozala na nkembo.
Ye, Yawe, alobi : « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »
Longwa na ngambo ya weste, bato bakobanga Kombo ya Yawe ; mpe longwa na ngambo ya este, bato bakokumisa nkembo na Ye ; pamba te akoya lokola ebale oyo etomboki, oyo pema ya Yawe ekomema.
Oh Yawe, Makasi na ngai mpe Ndako na ngai batonga makasi, Ekimelo na ngai na tango ya pasi, bato ya bikolo nyonso bakoya epai na Yo wuta na basuka ya mokili mpe bakoloba : « Batata na biso bazalaki kaka na banzambe ya lokuta, banzambe ya pamba oyo etikalaki kosalela bango bolamu ata moko te.
Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu ; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.
Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Bazongisaki : — Akobomisa bato mabe wana na kufa moko ya somo penza, akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu oyo bakobanda kofutaka ye ndambo na ye ya bambuma, na eleko oyo babukaka yango.
Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.
Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye : — Nazali koloba na bino penza ya solo : natikali nanu komona te kondima ya boye kati na Isalaele !
Esengo na basali oyo nkolo, tango akoya, akokuta bazali kosenzela ! Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo mpe akolata elamba na ye ya mosala, akovandisa bango na mesa, mpe akoya kopesa bango bilei.
Bandimi oyo bazalaki bakatama ngenga, oyo bayaki elongo na Petelo wuta na Jafa, bakamwaki mingi komona ete Nzambe asopi likabo ya Molimo Mosantu epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
Tango bakomaki kuna, basangisaki bato ya Lingomba, bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango mpe ndenge nini afungolelaki bato ya bikolo ya bapaya nzela ya kondima.
Boyebi te ete bato mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe ? Bomikosa te : bato na pite, basambeli bikeko, bato na bikobo, bato oyo balula makambo ya soni, mibali oyo basangisaka nzoto na mibali,
Mabombami yango ezali boye : Kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu, Bapagano bazali bakitani ya libula elongo na Isalaele, biteni ya nzoto moko, mpe basangani elongo kati na elaka moko.
kati na libota ya Aseri, bato nkoto zomi na mibale ; kati na libota ya Nefitali, bato nkoto zomi na mibale ; kati na libota ya Manase, bato nkoto zomi na mibale ;