10 Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye : — Nazali koloba na bino penza ya solo : natikali nanu komona te kondima ya boye kati na Isalaele !
Bongo Yesu alobaki na ye : — Mwasi, kondima na yo ezali monene ! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo ! Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.
Lisusu, nazali koloba na bino solo ete bato ebele bakowuta na Este mpe na Weste, mpe bakovanda na mesa elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi kati na Bokonzi ya Likolo.
Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai ; soki nalobi na moko : « Kende ! » akendaka ; mpe soki nalobi na mosusu : « Yaka ! » ayaka ; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai : « Sala mosala oyo ! » asalaka yango.
Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki ye mingi ; bongo abalukaki epai ya ebele ya bato oyo bazalaki kolanda Ye mpe alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezala kati na Isalaele, natikali nanu komona te kondima ya boye.