Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 8:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 8:1
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Yesu asosolaki ete basali mabongisi ya koboma Ye, alongwaki na esika yango. Bato ebele balandaki Ye, mpe abikisaki babeli nyonso.


Bato ebele bayaki epai na Ye ; bamemaki bato oyo batambolaka tengu-tengu, bakufi miso, bababa, bato oyo bakufa makolo to maboko mpe bato mosusu ebele. Batiaki bango na makolo ya Yesu, mpe Yesu abikisaki bango.


Ebele penza ya bato balandaki Ye, mpe abikisaki bango kuna.


Tango Yesu elongo na bayekoli na Ye balongwaki na Jeriko, bato ebele balandaki Yesu.


Ebele ya bato bazalaki kolanda Ye ; bazalaki kowuta na Galile, na Dekapoli, na Yelusalemi, na Yuda mpe na etuka mobimba ya ngambo ya Yordani.


pamba te ateyaki bango na bokonzi oyo balakisi na bango ya Mobeko bazangaki.


Tango Yesu amonaki ete bato ebele bazingeli Ye, apesaki mitindo epai ya bayekoli na Ye ete bakatisa na ngambo mosusu ya ebale.


Moto moko na maba ayaki, agumbamaki liboso na Ye mpe alobaki : — Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.


Tango Yesu alongwaki kuna, akendeki na ebale elongo na bayekoli na Ye, mpe bato ebele penza balandaki Ye wuta na Galile, na Yuda,


Sango na tina na Yesu ezalaki kaka kopanzana se kopanzana, mpe bato ebele bazalaki koya kosangana mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ