6 Bopesa te biloko ya bule epai ya bambwa, noki te ekozongela bino mpo na koswa bino ; bobwaka te bapawuni na bino ya talo epai ya bangulu, noki te ekonyata-nyata yango.
Bolole ! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo miso na yo ekomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo.
Mbala na mbala, nazalaki kosala mibembo ; nakutanaki na makama ya bibale, makama liboso ya bato mabe, makama liboso ya bandeko na ngai ya ekolo moko, makama liboso ya Bapagano, makama kati na engumba, makama kati na esobe, makama kati na ebale monene, mpe makama liboso ya bandeko ya lokuta.
ekoki kosalema te ete bateya bango lisusu mateya ya kobongola lisusu mitema soki bakweyi na masumu, pamba te bazali lisusu kobaka Mwana na Nzambe na ekulusu, mpo na bango moko, mpe kosambwisa Ye na miso ya bato.