Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 7:29 - Mokanda na Bomoi

29 pamba te ateyaki bango na bokonzi oyo balakisi na bango ya Mobeko bazangaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 7:29
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola liloba ya mokonzi ezalaka na bokonzi, nani akoki koloba na ye : « Ozali kosala nini ? »


Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli, mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba moto oyo alembi ; alamusaka ngai tongo nyonso, alamusaka litoyi na ngai mpo ete nayoka lokola moyekoli.


Kasi ngai, na nzela ya Molimo na Yawe, natondisami na nguya, na bosembo mpe na mpiko mpo na kobimisa polele mabe ya Jakobi mpe lisumu ya Isalaele.


Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.


Pamba te, nazali koloba na bino solo ete soki bosembo na bino liboso ya Mobeko eleki te bosembo ya balakisi ya Mobeko mpe ya Bafarizeo, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.


Kasi Ngai, nalobi na bino : Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.


Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki mwasi yango akweyaki na ekobo, afungoleli ye nzela ya kosala kindumba ; mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongola na libala asali mpe ekobo.


Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.


Tango Yesu asilisaki koloba maloba oyo, bato nyonso bakamwaki makasi malakisi na Ye,


Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki Ye.


Yesu alobaki : — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.


Pamba te, Ngai moko, nakopesa bino maloba oyo bosengeli koloba mpe bwanya oyo ekosala ete banguna na bino nyonso bandima nyonso oyo bokoloba.


Kasi bazangaki makoki ya kotelemela bwanya mpe Molimo oyo azalaki kotinda ye koloba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ