Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 7:28 - Mokanda na Bomoi

28 Tango Yesu asilisaki koloba maloba oyo, bato nyonso bakamwaki makasi malakisi na Ye,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 7:28
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Motema na ngai etondi na maloba kitoko. Namilobeli : Nakotatola misala na ngai mpo na mokonzi. Tika ete lolemo na ngai ezala lokola ekomeli ya mokomi ya mayele.


Tango Yesu asilisaki kopesa mitindo epai ya bayekoli na Ye zomi na mibale, alongwaki wana, akendeki koteya mpe kopanza Sango Malamu kati na bingumba na bango.


Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana, alongwaki na Galile mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani.


Tango ebele ya bato bayokaki bongo, bakamwaki mingi mateya ya Yesu.


Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso, ayebisaki bayekoli na Ye :


tango mvula ebetaki makasi, mayi eyaki elongo na mopepe makasi, emibwakaki na ndako yango ; ndako yango ekweyaki, mpe nyonso epanzanaki. »


pamba te ateyaki bango na bokonzi oyo balakisi na bango ya Mobeko bazangaki.


Bato bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te ateyaki na bokonzi oyo balakisi ya Mobeko bazangaki.


Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bayokaki makambo yango mpe bakomaki koluka nzela ya koboma Ye ; bazalaki kobanga Ye, pamba te ebele ya bato bazalaki kokamwa malakisi na Ye.


Wana mokolo ya Saba ekokaki, Yesu akomaki koteya kati na ndako ya mayangani. Kati na bato oyo bayokaki Ye, ebele bakamwaki makasi. Batunaki : « Boni, moto oyo azwi makambo oyo wapi ? Nani apesi ye bwanya ya boye ? Azwi wapi nguya ya kosala bikamwa oyo nyonso ?


kasi bazalaki kokoka te, pamba te bato nyonso bazalaki koyoka Yesu na bokebi.


Bato nyonso oyo bazalaki koyoka Ye bazalaki kokamwa mingi mayele na Ye mpe biyano na Ye.


Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna : — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ?


Bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te maloba na Ye ezalaki na bokonzi.


Sima na Yesu koloba makambo oyo nyonso epai ya bato, akotaki na Kapernawumi.


Bayuda bakamwaki mpe bazalaki kotunana : — Ndenge nini moto oyo ayekola te akoki koyeba Makomi boye ?


Bakengeli bazongisaki : — Ezali na moto ata moko te oyo asila koloba makambo oyo moto wana azali koloba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ