23 Bongo Ngai, nakoyebisa bango : ‹ Natikala koyeba bino te ! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe ! ›
Bato ya misala mabe, bokende mosika na ngai ! Nakotosa mibeko ya Nzambe na ngai !
Pamba te ozali Nzambe te oyo asepelaka na mabe, mpe moto mabe akoki kutu te kovanda elongo na Yo.
Miso na ngai ebebi mpo na mawa ; ezali lisusu komona malamu te likolo ya banyokoli na ngai.
Kasi azongiselaki bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : nayebi bino te. »
Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.
Tango Nkolo ndako akotelema mpe akokanga ekuke, bokotikala libanda, bokobanda kobeta ekuke mpe kobondela : « Nkolo, Nkolo, fungolela biso ! » Kasi Ye akozongisela bino : « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te ! »
Kasi akozongisela bino : « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te ! Bolongwa liboso na Ngai, bino nyonso, bato mabe ! »
Ngai, nazali mobateli malamu ya bibwele ; nayebi bameme na Ngai, mpe bameme na Ngai eyebi Ngai
Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi ; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe : « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »
Kasi bambwa, bato ya maji, bandumba, babomi, basambeli bikeko mpe bato nyonso oyo balingaka mpe basalelaka lokuta, bakozala na libanda ya engumba.