16 Bokoyeba bango na nzela ya misala na bango. Boni, bokoki kolongola bambuma ya vino na nzete ya basende to kobuka bambuma ya figi na nzete ya banzube ?
Nzokande moto mosusu akoki koloba : « Yo ozali na kondima ; kasi ngai, nazali na misala. » Lakisa ngai kondima na yo, oyo ezangi misala ; mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na nzela ya misala na ngai.
Bandeko na ngai, nzete ya figi ekoki solo kobota bambuma ya olive ? Nzete ya vino ekoki solo kobota bambuma ya figi ? Boni, ekoki kosalema ete etima ya mayi ya mungwa ebimisa mayi ya malamu ?