Matayo 7:15 - Mokanda na Bomoi15 Bosala keba na basakoli ya lokuta ! Tango bayaka epai na bino, bazwaka lolenge ya bameme, kasi bazali penza bambwa ya zamba oyo etonda na kanda. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na Akabi, mwana mobali ya Kolaya, mpe na tina na Sedesiasi, mwana mobali ya Maaseya, oyo bazali kosakola makambo ya lokuta epai na bino, na Kombo na Ngai : « Nakokaba bango na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe akoboma bango na miso na bino.
Bakambi na yango basengaka kanyaka liboso ya kokata makambo, Banganga-Nzambe na yango basengaka misolo liboso ya koteya, mpe basakoli na yango basengaka mbongo liboso ya kosakola. Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawe tango balobaka : « Boni, Yawe azali kati na biso te ? Pasi ekoki kokomela biso te ! »
Pamba te ezali na bato mosusu oyo basili kokota kati na bino na mayele mabe, ba-oyo etumbu na bango ekomama wuta kala : batosaka makambo ya Nzambe te, bakomisaka ngolu ya Nzambe na biso lokola nzela ya kosala makambo na bango ya soni, mpe bawanganaka Yesu-Klisto, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.
Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.